عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

Stoneland, Rock city, Al-Hijr valley [Al-Hijr] - Lingala translation - Mohammed Balangogo

Surah Stoneland, Rock city, Al-Hijr valley [Al-Hijr] Ayah 99 Location Maccah Number 15

Alif, lâm, râ.[1] oyo wana ezali nde mikapo mia buku mpe kurani ya polele.

Tika bango balia, basepela moke (na ngonga) mpe elikya ya mokili ebosanisi bango mokolo ya bosôló, kasi kala mingi te bakoyeba.

Bakondimaka na yango te,[1] mpe ya sólo, esilaki kosalama na bato ya liboso.

Mpe totiyelaki bino okati na yango (mabele) bilei mpe bikelamu bisusu biye bozali na nguya ya koleisa yango te.

Ezali na eloko moko te sé ezala na sanduku ya bozui na yango epai na biso, mpe tozali kokitisa yango ndambu ndambu na lolenge esengeli.

Mpe ya soló, tozali kopesa bomoyi mpe liwa, mpe biso nde tozali kopesa bokitani.

Mpe ya sólo, Nkolo wayo akosangisaka bango, ya soló ye nde azali na bwanya atonda boyebi.

Mpe tango nakosilisa kobongisa ye na lolenge ya kitoko mpe na fuli okati naye, pema nangai bofukamela ye na botosi.

Na yango (Allah) alobaki: Oh lusufele! Mpona nini ozuami o motango mwa bagumbami te?

Mpe (Allah) alobi: Bima wana (na lola) mpo ozali na botutu.

Alobi: Oh Nkolo wa ngai! Pesa ngai mwa tango kino mokolo mwa bosekwisami.

Мре (Allah) alobaki naye ete: Ya soló, ozali kati ya bazelisami.

Ya sólo, babangi bakozala na paladiso biye bizali na maziba.

Mpe tokolongolaka bango likunya eye ezalaki na mitema na bango mpe bakozala bandeko likolo ya bambeto yakotalana.

Balobaki: Kobanga te, ya sólo, tozali kopesa yo sango ya muana mayele oyo atondi na bwanya.

Alobaki: Bozali kopesa ngai (sango eye) mpe boyebi malamu ete kibopaka esili kozua ngai, boye sango malamu nini bozali kopesa ngai?

Balobaki: Tozali kopesa yo sango ya bosóló kozala okati ya baye bazangaka elikya te тропа bolamu.

Longola sé mwasi waye, tosila kokata (Allah) ete akozala o kati ya baye bakozua etumbu.

Balobi: Toyeli yo mpo topesa etumbu na baye bazali kotiya tembe mpe bazali kondima te.

Мре balobaki (na Loth): Topekisaki yo te na koyamba bato ya mokili?

Alobi: Bozua bana ba ngai ya basi soki bolingi bosala bango oyo bolingi.

Na bomoyi bwayo, ya soló bango bazali na milangwa mia liwa тропа bopengwi bwa bango.

Mpe tobalusaki (mboka yango) na bangambo inso, mpe tobetiselaki bango mbula ya mabanga maye esanganaki na moto makasi.

Ya sólo, wana nde bilembo тропа baye bazali na boyebi bakoka kornona.

Мре ya sólo, mboka ena ezalaki lokola nzela eye eyebanaki na moto nyoso.

Tozuaki bango mpe lokola, kasi mboka mibale oyo eyebanaki na bisika na yango awa na mokili mpe bitikalaki bilembo binene.

Mpe bazalaki kotonga bandako bia bango okati ya bangomba тропа kozala na kimia.

Mpe topesaki bango etumbu na ntongo o sima ya kolamuka.

Mpe tosilaki kopesa yo mikapo sambo[1] тропа kozongela yango na kotanga mbala na mbala, na kurani ya monene.

Baye bazuaki kurani ezala eloko ya bokabwani mpe tembe kati na yango,

Monisa polele maye otindami na yango, mpe pesa mokongo na basangisi (Allah).

Mpe tosilaki koyeba ete motema nayo ezali kokangama na ntina ya maye bazali koloba.