عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

Mary [Maryam] - Lingala translation - Mohammed Balangogo

Surah Mary [Maryam] Ayah 98 Location Maccah Number 19

Kâf, hâ, yâ, ain, sôd.[1]

Ezali bokundoli bwa ngolu ya Nkolo wayo epai ya mowumbu wa ye Zakariya.

Alobi: Oh Nkolo wa ngai! Mikuwa mia ngai milembi, mpe suki ya pembe ezingi moto mwa ngai, na yango, ata ngonga moko te nazangaka kozua soki na beleli yo.

Oyó akokitana ngai mpe kokitana libota lia Ya’qúb, mpe tika été osepela naye oh Nkolo!

Мре (Zakariya) alobi: Oh Nkolo wa ngai! Ndenge nini nakozala na mwana ya mobali mpe mwasi wa ngai abotaka te, mpe bopaka bosili kozua ngai?

Alobi: (Zakariya) Oh Nkolo wa ngai! Lakisa ngai elembo, (tiyela ngai elembo) (Allah) alobi: Elembo nayo, kolobisa bato te babutu[1] misato milandani.

Mpe azalaki na botosi mpe limemia epai ya baboti naye, kasi azalaki na lolendo te mpe komilakisa te, mpe azangaki te kotosa mibeko mia (Nkolo waye)

Mpe kimia ezala likolo lia ye na mokolo moye abotamaki, mpe na mokolo akokufa mpe mokolo akosekwa.

Mpe kundola Maryam okati ya buku (kati ya kurani) tango amibendaki na libota lia ye akei kovanda na esika moko boye о moniele.

(Maryam) alobaki: Ya soló, ngai na mibateli epai ya Ar-Rahmân[1] тропа yo, soki penza ozali moyengebeni.

(Anzelu) alobi: Ya sólo, ngai nazali motindami ya Nkolo wayo mpo napesa yo likabo ya elenge mobali ya mayele oyo apetoama.

Mpe pasi ya kobota eyeli ye onse ya nzete ya nagh’la[1] alobi: Eh mpasi na ngai! Soki liwa ezuaka ngai yambo ya oyo, nde nabosanamaki soló ya kobosanama.

Na yango, abengaki[2] ye na nsé naye alobi: Kozala na mawa te! Nkolo wayo asili kotiya onse nayo liziba ya bomoyi.

Mpe nasala bolamu epai ya mama na ngai, mpe atiaki ngai nazala moto ya lolendo mpe moto ya pași te.

Mpe kimia ezala likolo lia ngai, mokolo moye nabotamaki na mokolo moye nakokufa na mokolo moye nakosekwisama nazali na bomoyi.

Wana Issa mwana ya Maryam, liloba ya soló, eye bazali sé kotia tembe mpe kobundisa bosóló. (bwa ye)

(Na sima) bakabwani na binzambe nzambe kati kati na bango, etumbu ezali тропа bapengwi o mokolo ya monene (mokolo ya kokata makambo).

Mpe kebisa bango тропа mokolo mwa botungisami, tango manso makokatamaka, mpe bazali о mokili moye bazali komiyeba te mpe kondima te.

Ya sólo, biso nde tozali na bokitani ya mabele, mpe baye banso bazali o likolo na yango, mpe epai na biso nde banso bakozonga.

Tango ayebisaki na tata waye, eh tata wa ngai! Mpona nini ozali kobondela oyo akoyokaka te, mpe akomonaka te, mpe ekoki kosalisa yo na eloko te?

Ibrâhîm alobi: Kimia ezala nayo, nakosengelaka yo na Allah alimbisa yo, mpo ye andimelaka ngai тропа bolamu.

Namitie mosika na bino, mpe na maye bozali kobondela na botiki Allah, mpe nakosenga na Nkolo wa ngai, mpe nazali na elikya ete nakomona pasi te soki nasengi Nkolo wa ngai.

Mpe tobengaki ye (o ngambu ya mobali o ngomba ya sinai) penepene na biso тропа kopesa ye sekele.

Mpe totombolaki ye esika likolo ya lokumu koleka.

(Bakozala) na elanga ya edeni eye Ar-Rahmân alakaki yango bawumbu naye, baye bandimaki na (mabombami na yango). Ya soló, elaka naye ezali na tembe te.

Tokitaka te sé na mitindo mia Nkolo wa yo, manso maye mazali liboso lia biso mpe osima na biso na maye manso mazwami o kati kati na yango mibale mazali yaye. Mpe Nkolo wayo abosanaka te.

Sima tokobendaka na mangomba manso kati na bango baye bazangaki botosi, baye bazalaki mabe koleka тропа Ar-Rahmân.

Mpe bino banso bokoleka likolo na yango (ya gbagba). Mpo été yango ekozangaka te epai na Nkolo wayo.

Mpe biso nde tokopesaka maye azali koloba, kasi akoyelaka biso ye moko.

Kowelisa te тропа bango, ya sólo, tokotiyaka motango moye moyebani, (тропа maye manso basalaki).

Mpe tokopusaka batomboki o moto mwa lifelo lokola bibwele (тропа komela mayi ya moto).

Asila koyeba motango mwa bango, mpe bazali ya koyebana.

Mpe o mokolo mwa mbano bango banso bakotelemaka moko moko o liboso lia ye.

Mpe ya solo, tosilâ kozalisa yango mpasi te na lolemo nayo (kurani) тропа komanyola, mpo okoka kopesa sango elamu na yango epai ya babangi mpe okebisa na yango babubi.