عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

The Standard [Al-Furqan] - Lingala translation - Mohammed Balangogo

Surah The Standard [Al-Furqan] Ayah 77 Location Maccah Number 25

Mpe batiki ye bazui banzambe misusu baye bakelaka eloko te, po bango moko bakelama, mpe bazali na makoki ya komisala bolamu te mpe komisala mabe te, mpe basimbi liwa na maboko na bango te, mpe bomoyi te, mpe bazali na makoki ya kosekwisa te (o sima ya liwa).

Mpe baye bapengwa bazali koloba ete: Oyo ezali sé lokuta monene oyo ayei na yango, (ye Muhammad) mpe bato basusu basalisi ye na yango, ya solo bango basili kobuka lokuta mpe na libubi.

Nkembo naye oyo soki alingi akotiela yo bolamu ebele koleka oyo wana, (soki alingi andimela yo bolamu okati ya) bilanga eye ezali koleka o nsé na yango mingala, mpe akotiela yo bandako ya kitoko.

Kaši baboyi kondima na mokolo ya suka, na yango tolengeli moto ya makasi тропа baye bazui yango na lokuta.

Mpe tango bakobwakama okati na yango na esika ya moke, maboko makangami na sima ya bakingo, na tango wana bakosenge ete bakufa mpe babebisama mbala moko.

Bakozua nyoso bazali na yango mposa, libela na libela kati na yango. Wana ezali solo elaka ya Nkolo wayo eye ekozangaka te.

Mokolo oyo bato mabe bakomona ba anzelu[1] ekozala sango malamu te, (ba anzelu) bakolobaka na batomboki ete: Epekisami; nzela ezali te, (epekisami na bino kozua sango ya malamu тропа kokota na lola).

Asilaki kobungisa ngai mpe atiye ngai mosika na bokundoli tango eyelaki ngai (kurani). Kasi ya sólo, penza satana azali mokosi mpo na moto, (akimaka moto o sima ya komeka ye mpe kobungisa ye).

Mpe bapengwi bakolobaka: Mpona nini kurani yango ekitelaki ye mbala moko te? Tokitisaki yango ndenge wana mpona kolendisa motema nayo, mpe tozalaki kotanga yango malamu penza (kotangisa ye kurani mpe koyekola yango na pete).

Boye ozali kornona te moto oyo azui mposa naye nde nzambe naye? Boye yo ozali mobateli ya moto ya motindo oyo?

Мре ye nde atandı bibale mibale bizali kotiola esika moko, oyo ezali malili kitoko, mpe oyo mosusu ezali mungwa kitoko te, mpe atie ndelo kati kati na yango mibale mpo ekutana te.

Мре soki bayebisi bango ete: Bofukamela Ar-Rahmân, (Allah) bakozongisa été: Nani Ar-Rahmân? Tofukamela oyo ozali kotinda biso? Мре ezali kobakisela bango sé bopengwi. (ezali malamu kogumbama sima ya mokapo moye)

Mpe bawumbu ya Ar-Rahmân bazali baye batambolaka likolo ya mabele na malembe mpe limemia na komikitisa, mpe soki batumoli bango na baye bayebi eloko te, bayanoli bango été: Kimia.

Mpe baye bazali kolekisa butu na bango nakotelema mpe kofukamela Nkolo na bango.

Bakobakiselaka ye etumbu o mokolo mwa suka, mpe akotikalaka libela okati na yango mpe azingami na kozanga lokumu.

Bango wana nde lifuta na bango ekozala esika ya likolo (o paladizo) mpo été bakangaki mitema, mpe bakokutana na losako mpe kimia o kati na yango,

Libela kati na yango, boye bolamu kani bakozuaka o esika ena bakozalaka!

Loba: Nkolo wa ngai akomitungisa тропа bino te wana bozangi losambo na bino, mpo bozwaka(ntoma) lokuta, na yango etumbu ekotika bino te, mpe ekozalaka seko na seko.