عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

Luqman [Luqman] - Lingala translation - Mohammed Balangogo

Surah Luqman [Luqman] Ayah 34 Location Maccah Number 31

Alif, lám, mím.[1]

Yango ezali bokambi mpe ngolu тропа babongisi (bato ya malamu),

Mpe tango bazali kotangela ye mikapo mia biso, apesa mokongo na lolendo lokola ayoka naino yango te, mpe lokola ezali na eloko ya kilo kati na matoyi naye. Pesa ye sango ya etumbu ya makasi.

Мре toyebisaki na moto (asalela) tata na mama waye (bolamu), mama naye amema ye na pasi tango molai, bolembu na bolembu kino mibu mibale azali (komelisa ye mabele,) ete otondo ngai mpe otondo baboti nayo, epai na ngai nde bokozonga.

Mpe kobalolaka elongi te na lofundo liboso ya bato mpe kotambola te na mokili osepela nayo moko koleka, mpamba te Allah alingaka bato ya lolendo na lofundo te. (komitombola na lolendo liboso ya bato te)

Kasi oyo akopengwa, bopengwi bwaye epesa yo mawa te, bozongi na bango ekozalaka nde epai na biso, тре tokoyebisaka bango maye basalaki. Ya soló, Allah azali moyebi ya maye mabombami o mitema mia bango.

Tozali kopesa bango bomoi ya bisengo токе, na sima tokomema bango na makasi na etumbu oyo eleki mpasi.

Boye ozali kornona te ya solo masuwa maye mazali kotambola na bibale, ezali sé na ngolu ya Allah, mpo amonisa bino bilembo bia ye? Ya soló wana ezali bilembo тропа moto nyonso oyo akangi motema mpe azali kotondo.