عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

Those who set the ranks [As-Saaffat] - Lingala translation - Mohammed Balangogo

Surah Those who set the ranks [As-Saaffat] Ayah 182 Location Maccah Number 37

Na (ba anzelu) baye batelemi na milongo,

Mpe na baye bazali kotindika na makasi (mapata).[1]

Bakobenganama mpe bakozala na etumbu ya libela.

Longola sé oyo akolinga kozua (sango) na lolenge ya moyibi, kasi bakolandisaka kobengana ye na libanga ya moto.

Kasi soki ozali kokamwa mpe bazali koseka.

Mpe soki bapesami malendisi (kurani), baboyi kokanisa yango. (kotanga yango)

Mpe bakomi koloba: Eh mawa na biso! Oyo nde mokolo mwa mbano (ya suka mpe lifuti)

Tomemaki bino na libungi, kasi ya soló, tomibungisaki biso moko.

Ya soló, bazalaki soki bayebisi bango nzambe mosusu ya kobondela na bosóló azali te sé Allah, basali lolendo.

Mpe bazali koloba: Totika banzambe na biso тропа molobi ntôki oyo тре azali moto ya ligboma?

(Bakoliaka) mbuma mpe bakosepelisaka bango.

Bakozala na basi ya kitoko pembeni na bango, basi ya miso minene ya kotalatala pembeni te.

Mpe akoloba: Na nkombo ya Allah, yo nde osali ete ngai nazanga.

Soki ezalaka bolamu bwa Nkolo wa ngai te, mbele nalingaki kozala o kati ya bato ya etumbu.

Na lolenge ya boye nde esengeli na baye balingi kosala basala.

Boye wana ezali esika ya malamu тропа kofanda to ezali nzete ya zaqqüm? (ezali nzete wana mbuma na yango ezali bololo ezali o kati ya lifelo, yango nde bilei ya bato ya mabe),

Мре liboso na bango, ebele ya bankoko na bango basilaki kobunga.

Mpe totikaki nkombo naye ezala bokundoli epai ya basusu.

Ya sólo, ye azalaki okati ya bawumbu na biso, baye bandima.

Mpe ya soló, Ibrâhîm azalaki moko kati na baye balandaki ye na lingomba.

Mpe alobaki ete: Ya soló ngai nazui malali.

Boye bozali koloba te тропа nini?

Ayebisi bango: Boye bozali kobondela bikeko biye bosali bino moko?

Mpe alobaki ete: Ya soló, ngai nakei epai ya Nkolo wa ngai akokamba ngai.

Nkolo, Pesa ngai (mwana) o kati ya bato ya malamu.

Mpe topesaki ye sango elamu ya mwana mobali ya boboto mingi (Ismail).

Sima ya bango banso mibale kotosa (mibeko mia Allah), alalisi ye mpo ete aboma ye.

Mpe topesaki ye ebwele ya kitoko тропа kosasa.

Mpe totikaki nkombo naye ezala bokundoli epai ya basusu.

Mpe topesaki ye sango elamu ya kobotama ya Is’háq, ntoma okati ya (bato) malamu.

Mpe ya sólo, tosilaki kopesa na Mûssa na Hânına bolamu na biso.

Mpe nkombo ya bango mibale ezala bokanisi тропа basusu.

Ya soló, bango mibale bazalaki okati ya bawumbu na biso ya bandimi.

Мре ya sólo IL’YÁS azalaki moko okati ya batindami.

Baboyaki kondimela ye, kasi bakomemama o kati ya etumbu.

Mpe totikaki nkombo naye ezala bokundoli epai ya basusu.

Kimia ezala likolo ya Il’yâsîn na balandi ye.

Ya sólo, ye azalaki okati ya bawumbu na biso ya bandimi.

Longola sé mobange ya mwasi azalaki okati ya batikali.

Ya soló, bino bozali koleka pembeni na bango na tongo (nzela ya mobembo).

Mpe ya soló, Yûnus azalaki moko o kati ya batindami.

Tango akimaki akei komata na masuwa oyo etondaki mingi, (elingaki kozinda)

Mpe mbisi emelaki ye mpo été atikaki bato na ndingisa ya Allah te.

Mbele alingaki kotikala okati ya libumu lia ye (mbisi) kino o mokolo mwa lisekwa.

Mpe bandimaki, kasi topesaki bango bosepeli ya mwa ngonga ya moke.

Tuna bango motuna, boye Nkolo wayo azalaka na bana basi mpe bango bazali na bana mibali?

(Bazali koloba) ete: Allah abota, ya solo bazali na lokuta.

Mpona nini bozali kokata likambo na lolenge wana?

То bozali na bilembetele bisusu bia polele?

Nkembo na Allah wa likolo, mpona maye bazali koloba,

Mpe ya soló, biso nde tozali kopesa lokumu (ya Allah).

Tango bakokweyaka na bisika bia bango, tango wana ekozala mabe тропа bango oyo basilaki kokebisama.

Mpe mitiya mosika na bango, kino ngonga moko boye.