عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

The Troops [Az-Zumar] - Lingala translation - Mohammed Balangogo

Surah The Troops [Az-Zumar] Ayah 75 Location Maccah Number 39

Loba: Ya sólo, natindamaki тропа kokumisa Allah wa bomoko mpe bolandi lingomba lia bosóló.

Mpe natindamaki mpo nazala wa yambo o kati ya baye bamisokie. (okati ya bandimi)

Loba: Ya sólo, nazali kobanga soki nazangi botosi epai ya Nkolo wa ngai, noki te nakozua etumbu enene o mokolo mwa suka.

Loba: Nazali kobondela Allah mpe mabondeli na ngai nionso ezali кака тропа ye.

Mpe baye bamitiaki mosika na batomboki baboyi kobondela bango, mpe bazongi epai ya Allah, bazali na sango elamu. Mpe pesa sango elamu epai ya bawumbu na ngai,

Boye, oyo Allah afungoli motema naye тропа isalamu, azali na bongengi kowuta epai ya Nkolo naye. Kasi mabe na baye mitema mia bango mizali makasi тропа maloba ya Allah? Bango wana nde bazali na libunga ya polele.

Allah apeși lisese soló тропа mobali токо azali na basangani ebele, bazali kowelana тропа ye, mpe mobali mosusu azali sé na moto токо, boye bakokani na lisese? Matondo na Allah, nzoka nde ebele na bango bazali koyeba te.

Ya sólo, yo okokufaka, mpe ya sólo bango bakokufaka lokola.

Allah akoki te тропа kobatela mowumbu naye (тропа kobatela ye mpe kopesa ye lisalisi)? Mpe bazali kobangisa yo na baye bazali ye te (Allah), mpe oyo Allah abungisi, akozua bokambi te.

Mpe oyo Allah akambi ye, akozua mobungisi te. Boye ezali Allah te nde atonda bokasi mpe Nkolo bokonzi ya kopesa etumbu?

Loba: Eh bato ba ngai! Bosala oyo bokolinga kosala, ya sólo ngai nazali kosala na lolenge na ngai, kasi bokoyebaka kala te,

Oyo etumbu ekoyelaka ye, (na mokili) akomona yango, mpe akozua yango o mokolo mwa suka na bowumeli.

То, aloba te ete tango akomona etumbu: Oh!, soki nazongi ata na (mokili), mbele nalingaki kozala okati ya babongisi.

Loba: Boye bozali kotinda ngai nabondela nzambe mosusu elongo na Allah? Oh! Bino baye bozanga koyeba.

Mpe mabele makotondaka na bongengi bwa Nkolo na yango, mpe bakotiyaka buku (ya misala nyoso oyo moto asalaki), mpe bakoyaka na bantoma na banzeneneke, mpe bakokataka kati kati na bango na bosôló, mpe bango bakobubamaka te.

Mpe molimo (moto) nyoso akozuaka sé mbano ya maye asalaki, mpe (Allah) ayebi malamu koleka maye bazalaki kosala.

Bakoyebisaka bango: Bokota na minoko ya moto, bokozala libela okati na yango, esika kani ya mabe wana тропа bato ya lolendo!