عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

Qaf [Qaf] - Lingala translation - Mohammed Balangogo

Surah Qaf [Qaf] Ayah 45 Location Maccah Number 50

Kasi bazali kokamwa ete mokebisi ayeli bango okati na libota na bango moko, mpe bapagano balobi ete: Oyo ezali likambo ya kokamwa.

Boye soki tango tokokufaka tokokomaka putulu? Wana ekozalaka bozongi ya mosika.

Ya soló, toyebi ndenge nini mabele ekolia banzoto na bango, mpe tozali na buku eye ezali kobomba manso.

Мре lolenge nini fotandaki mabele (na bonene), тре tolendisaki yango na bangomba, тре tobotisi yango lolenge nyoso ya biloko.

Mpo mowumbu nyoso oyo azali kolikia na bozongi amona mpe akanisa.

Mpe nagh’l[1] ya milai na biteni na yango ezali ya kokangama.

(Ezala) bozui тропа bawumbu (na ngai), mpe na yango topesaki bomoyi na mboka oyo ekufa. Lolenge wana nde lisekwa ekozala.

Akoloba liloba moko te kino ekozala pembeni naye oyo azali kotala mpe azali kokoma.

Mpe Molingani naye akoloba: Tala oyo ezali epai na ngai, ezali pembeni.

(Mpo azalaki) kopekisa bolamu, (тропа bawumbu ya Allah), azalaki motomboki тре moto ya tembe.

Moninga naye akolobaka: Nkolo ezali ngai te moto natiyaki ye azala motomboki, kasi azalaki na libunga ya mozindo.

Oyó nde balakaki bino, тропа (moto) oyo atubelaka mpe abatelaka mibeko.

Oyo azalaki kobanga Ar- Rahmán, ata azali kornona ye te, mpe ayei na motema ya kotubela.

Bakozuaka nyoso oyo bakolinga mpe pembeni na biso bazali na litomba mosusu.

Bato boni tobomaka liboso na bango, mpe balekaki bango na makasi, mpe batongaki bandako ya milai mpe ya kitoko, boye bazali na esika ya kokima (etumbu na biso?)

Mpe pesa ye lokumu kati kati ya butu mpe gumbama (тропа kosambela)

Ya soló, biso nde topesaka bomoyi mpe liwa, mpe epai na biso bozongi ekozala.