عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

Mount Sinai [At-tur] - Lingala translation - Mohammed Balangogo

Surah Mount Sinai [At-tur] Ayah 49 Location Maccah Number 52

Na ngomba ya at’tur.[1]

Na buku oyo ekomama (na ba anzelu).

Likolo ya ekomami ya polele.

Ya soló, etumbu ya Nkolo nayo ekokokisama.

Ekozala na moto ya kopekisa yango te.

Ya sôló, babangi bakozalaka o kati ya lola na bolamu na bango.

Mpe bayekami likolo ya bambeto ebongisama kitoko, mpe tokobalisa bango basi ya kitoko ya miso ya minene ya moyindo.

Okati na bango, bilenge mibali bakotelamaka тропа kosalela bango, bazali kongenga lokola mabanga kitoko na bongengi.

To bazali koloba ete: Asalaki yango na ndenge naye moko? Kasi bazali kondima na yango te.

(Malamu) baya na makambo mosusu ezala lokola yango, soki ya soló, bazali na bosembo.

To (Allah) azali na bana basi mpe bino bozali na bana mibali?!

To bazali na boyebi ya mabombami nde bazali кокота yango?

Mokolo oyo likita ya mabe na bango likosalisa bango na eloko moko te, mpe bakozuaka lisungi te.

Mpe kanga motema тропа kozela motindo ya Nkolo nayo, mpo ete ya sólo, yo ozali na nsé ya ebateli na biso. Mpe sanzola lokumu ya Nkolo nayo tango ozali kotelema.

Mpe kumisa ye (Allah) okati ya eteni ya butu, mpe otango minzoto mizali kolimwa.