عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

The Event, The Inevitable [Al-Waqia] - Lingala translation - Mohammed Balangogo

Surah The Event, The Inevitable [Al-Waqia] Ayah 96 Location Maccah Number 56

Akokitisaka (basusu) mpe akotombolaka (basusu)

Mpe tango bangomba bikokutoamaka mike mike,

Bato ya ngambu ya loboko ya mobali bango ba nani bato ya ngambu ya loboko ya mobali!

Mpe bato ya ngambu ya loboko ya mwasi bango ba nani bato ya ngambu ya loboko ya mwasi!

Bato ya liboso (baye balandaki mibeko mia Allah na mabele) bakozalaka bato ya liboso na mokolo ya suka.

O kati ya bilanga (bia lola) ya bolamu.

Bazali ebele oyo baponami kowuta na bato ya liboso,

(Bakolala) likolo lia bambeto bibongisami na wolo,

Kati na yango bilenge mibali bakozalaka wana тропа kosalela bango libela na libela,

Mpe bakopo na bitiyelo, mpe nkeni mitondi na masanga ya elengi. (тропа bomeli).

(Masanga wana) ekolangwisaka bango te mpe ekopesaka bango mutu pasi te.

Mpe (bakoliaka) lolenge nyoso ya mișuni ya bandeke oyo balingi.

Mpe bakozalaka na basi ya miso ya minene mpe ya kitoko na kotala,

Mpe bato ya loboko ya mobali, ba nani yango bato ya loboko ya mobali!

Bakofanda na nsé ya banzete oyo bizanga nzube. Sidr,

Na banzete ya makemba na bitabe,

Na nsé ya malili ya monene,

(pene) na mayi oyo ezali kolekana ya libela,

Baponami ebele bazuami okati ya baye baleka liboso,

Bakozalaka na kati ya mopepe ya moto ya lifelo, mpe na mayi ya moto makasi koleka,

Mpe na nsé ya elili ya milinga ya moyindo,

(kati na yango) malili te mpe kitoko te.

Bokoliaka ya soló, bitape bia nzete ya zaqqúm[1].

Bokomelaka (yango) lolenge ibili amelaka na mposa (nyoso).

Wana nde bilei oyo bakoyambaka bango na yango o mokolo ya suka.

Biso nde tokela bino, kasi тропа nini bozali kondima na mokolo ya suka te?

Boye bozali kornona te mayi oyo bozali kobimisa yango na mokongo?

Mpo totiya na esika na bino (bato) misusu lokola bino, mpe tobotisa bino na lolenge oyo boyebi te.

Boye bozali kornona biloko oyo bozali kobimisa yango (nanse ya mabele)?

Soki tolingaki, nde tokomisaki yango makala, nde botikalaki kokamwa. (mpe kobeta misapi sima)

Soki tolingaki, nde tokomisaki yango mungwa mungwa, boye тропа nini bozali kopesa matondo te? (epai ya Allah).

Totiyaki yango ezala bokundoli (тропа lolenge lifelo ekozala), mpe esalisa baye bazali na mposa na yango (тропа baye bazali na mobembo)

Boye na lolenge wana nde bokozala na botondi na bozui na bino, ete boboya kondima na kurani?

Boye soki boyebi ete bozali na nsé ya mibeko na biso te (bokosekwisama te, to mpe bokofutama te).

(Na yango akozala): Na bopemi mpe ngrásia okati ya lola ya esengo.

(Bakoyambaka ye na liloba ya): Kimia ezala nayo, mpo ozali ngambu ya loboko ya mobali!

Akokitisama okati ya mayi ya moto ya makasi.