عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

Mutual Disillusion [At-Taghabun] - Lingala translation - Mohammed Balangogo

Surah Mutual Disillusion [At-Taghabun] Ayah 18 Location Madanah Number 64

Boye sango ya baye bapengwaki liboso na bino ekomelaki bino te bamekaki (etumbu na mokili) mpe bamonaki oyo bamonaki тропа makambo na bango, mpe bakozala na etumbu ya makasi?

Wana ezali mpo ete batindami na bango baydaki bango bosembo ya polde, kasi bazongisaki eyano ete: Moto nde akoya kokamba biso? Мре bapengwaki mpe bapesi mokongo, mpe esalaki Allah eloko te. Mpo ete Allah azali wa bomengo atonda lokumu.

Kasi тропа baye bapengwaki mpe baboyaki kondimela mikapo mia biso, bango nde bato ya moto mpe bakozalaka kuna libela na libela, kasi bozongi ya mabe nini wana!

Allah, nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosóló sé ye. Mpe epai ya Allah esengeli na bandimi bamikaba.

Ayebi maye mabombami na maye mazali polele (azali) wa bokasi atonda bwanya.