عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

Nooh [Nooh] - Lingala translation - Mohammed Balangogo

Surah Nooh [Nooh] Ayah 28 Location Maccah Number 71

Alobaki: Oh bato na ngai! Ya sôló, nazali mokebisi ya polele тропа bino,

Nayebisaki bango été: Botubela epai ya Nkolo na bino. Ya soló, ye azali molimbisi.

Mpo akitisela bino kowuta na likolo mbula ezala ya kolandana,

Mpe akela bino ndambu ndambu ya kotangama?

Mpe balobi ete: Botika banzambe na bino te, botika Waad te, botika mpe Suwaa te, yarúsa te, yaúqa mpe te na Nasra te. (ezali bankombo ya bikeko ya bango bazalaki kobondela)