عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

The cloaked one [Al-Muddathir] - Lingala translation - Mohammed Balangogo

Surah The cloaked one [Al-Muddathir] Ayah 56 Location Maccah Number 74

Eh yo (Muhammad) mozipani na bulangiti!

Mpe kumisa Nkolo nayo ya monene!

Mpe mitiya mosika na masumu nyoso. (mpe tika yango)!

Mpe zala na bozeli тропа Nkolo nayo!

Mpe (napesi ye) bana oyo bazali naye tango nyoso;

Te; ya soló, azalaki kowangana mikapo mia biso na mutu makasi.

Ya sólo, akanisaki mpe azuaki mokano,

Nakozikisa ye na moto ya saqar.

Ezali kozikisa mposo ekomi moyindo.

O kati na yango ezali na (ba anzelu) zomi na libua.

Mpe totiaki bakengeli ya moto sé ba anzelu, mpe totiaki motango na bango sé ezala komekama epai ya bapengwi, mpo ete baye bazua buku liboso bayeba yango mpe ebakisa bondimi epai na bandimi, mpo ete baye bazua buku liboso na bandimi bazala na ntembe te, mpe mpo ete bapagano na baye bazali na bokono o mitema baloba ete: Allah alingi nini na ndakisa oyo? Lolenge wana nde Allah azali kokamba nani alingi mpe kobungisa nani alingi. Mpe moko te ayebi mapinga ya Nkolo nayo sé ye mei. Mpe wana ezali sé bokundoli тропа bato.

(Saqar) ezali moko ya (etumbu) ya monene.

Ezali bokundoli тропа bato,

Longola sé bato ya ngambu ya loboko ya mobali. (balongi),

Mpe tomitiyaki ngambu ya baye balingaki sé koloba mabe.