عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

The emissaries [Al-Mursalat] - Lingala translation - Mohammed Balangogo

Surah The emissaries [Al-Mursalat] Ayah 50 Location Maccah Number 77

(Nalapi na nkombo) ya baye batindamaki[1] ya kolandana! (ba anzelu)

Mpe na baye bafulaka mopepe na mbonge makasi!

Mpe na baye bakabolaka mabe na malamu!

Mpe tango ngonga ya bosangani ya batindami ekotiyamaka.

Boye totiyaki mabele ezala ebombelo ya (makambo) nyoso te?

(Mpona) baye bazali na bomoyi na baye bakufa?

Bökende epai ya elili ya milinga oyo ezali na mozindo misato,

Oyo ezali na elili te mpe ekoki kobatela moto na motó te!

Ya soló motó ezali kobwaka balolemo na yango ya kilo lokola bandako ya kilo,

Ezali lokola bakamela langi na yango lokola mayi ya mosaka.

Soki bolingi bosala likita ya mabe тропа ngai, bosalela ngai.

Ya soló babangi, bakozala na bisika ya malili mpe ya maziba,

Mpe tango bayebisaki bango: Ete bogumbama, kasi balingaki kogumbama te. (тропа Allah)