عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

The tidings [An-Naba] - Lingala translation - Mohammed Balangogo

Surah The tidings [An-Naba] Ayah 40 Location Maccah Number 78

Na likambo nini bazali komitunana?

Te kasi bakoyeba yango sima ya mwa ngonga moke.

Мре tozalisaki te mpongi ezala pona bino bopemi?

Мре tokelaki te butu ezala elamba ekozipa bino?

Mpe tosalaki te mokolo тропа misala mia bomoyi?

Mpe totongaki te likolo na bino (mapata) sambo ekembama?

Mpe totiaki te o’teyi na yango mwinda mozali kongenga?

Ya soló, mokolo ya mbano mozali na ntango ya koyebana.

Esika yakofanda тропа batomboki.

O’kati na yango bakoyoka mopepe ya kitoko te mpe bakomela eloko te,

Lokola lifuta lia bosembo тропа bango.

Ya soló, elonga ezali тропа babangi (Allah).

Mpe bilenge basi baye bazali banso ya mbula moko,

Mpe bankopo ebele ya bomeli.

O’kati na yango bakoyokaka makambo mazanga ntina te mpe lokuta te.

Mokolo molimo mosantu mpe na ba anzelu bakotelema molongo moko mpe moto akozala na liloba te longola sé oyo Ar-Rahmân[1] (Allah) akopesa ye ndingisa mpe akoloba sé bosembo.