عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

Those who drag forth [An-Naziat] - Lingala translation - Mohammed Balangogo

Surah Those who drag forth [An-Naziat] Ayah 46 Location Maccah Number 79

(Na lapi) na baye bapikolaka na makasi!

Mpe baye batambolaka ndenge balingi!

Mokolo moye mabele makoningana (na bofuli ya yambo),

Mokolo mona mitema mikoningana na bobangi.

Bakoloba ete: Ya sôló, tokozongisama na bomoyi na biso sima ya liwa?

Mpe bakozwamaka likolo ya mabele kowuta na malita ma bango.

(Falo alobaki) eza lokuta mpe aboyaki kotosa.

Sima apesaki mokongo mpe asali lolendo.

Abiangi mpe asangisi bato naye.

Sima alobaki ete: Ngai nazali Nkolo na bino oyo azali na likolo koleka.

Atombola etando na yango mpe akokisa yango.

Ezali bilei тропа bino mpe na bibuele na bino.

Bazali kotuna yo na maye matali mokolo ya suka ntango nini mokolo yango?

Bwanya nini ozali na yango тропа koyanola bango?

Ngonga na yango eyebani epai na Nkolo nayo.

Ya soló yo ozali sé mokebisi тропа oyo azali na bobangi ya mokolo wana.