عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

He Frowned [Abasa] - Lingala translation - Mohammed Balangogo

Surah He Frowned [Abasa] Ayah 42 Location Maccah Number 80

Akangi elongi mpe apesi mokongo.

Mpo ete mokufi miso aye epai naye.

Nani akoyebisa yo ntango mosusu ye alingi komipetola?

Mpona moto oyo amitondisi na lolendo mpona bozwi naye,

Kasi bopetwami naye ezali na maboko nayo te.

Kosala lisusu boye te oyo ezali ya soló liteya.

Baye ya lokumu тре botosi.

Akelamaki kowuta na mayi ya mokongo, akeli ye mpe akokiseli ye mokano mwa ye.

Na nzete ya zaítún[2] na nzete ya nagh’l[3],

Мре tobimisi mbuma mpe matiti.

Mpe akokima mama naye mpe tata naye,