عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

Defrauding [Al-Mutaffifin] - Lingala translation - Mohammed Balangogo

Surah Defrauding [Al-Mutaffifin] Ayah 36 Location Maccah Number 83

Mokolo wana etumbu ekozala тропа baye baboyi kondima,

Kasi basala angele ya soló mokolo mona mokozipa bango mpo ete bamona Nkolo na bango te,

Ba anzelu ya pembeni ya Nkolo (Allah) bazali banzeneneke тропа yango.

Ya sólo bato ya malamu bakozala okati ya bisengo.

Bakomela masanga ya sukali oyo esila kobongisama,

Etikaka solo ya mpimbo na suka lokola malasi, na yango esengeli nabaye bazali kolikia тропа yango basala molende.

Mpe esangisani na masanga ya tasmin (liziba),

Baye bakozala pembeni na Nkolo (Allah) bako mela mayi ya liziba wana.

Mpe soki baleki pene na bango bazali (kodongola bango miso nako fina) miso na bango,

Nzoka nde batindamaki te bazala bakengeli likolo ya bandimi.

Bapagano bazwi te lifuta liye ekoki na bango na tina ya maye bazalaki kosala.