عربيEnglish

The Noble Qur'an Encyclopedia

Towards providing reliable exegeses and translations of the meanings of the Noble Qur'an in the world languages

The morning star [At-Tariq] - Lingala translation - Mohammed Balangogo

Surah The morning star [At-Tariq] Ayah 17 Location Maccah Number 86

(Na lapi) na mapata mpe na monzoto y a butu!

Ezali monzoto ya bongengi makasi.

Ezali na molimo moko te sé azala na mokengeli likolo naye.

Akelamaki kowuta na litanga ya mayi.

Ya soló Allah azali na nguya ya bozongisi ye na bomoyi,

Mokolo moye mitema mikobimisa maye ebombaki,

(Na lapi) na mapata maye mazali kokitisa mbula,

Мре (na lapi) na mabele maye mazali kofungwama,

Ya soló, oyo (kurani) ezali liloba ya bosembo.

Ngai mpe nazali na ya ngai mwango.